Mokapo 17 — Bokoli ya solo na kati ya mikakatano
GSAM 265.1“LOKOLA mobateli alukaka etonga na ye na mokolo oyo azali na kati ya bampate na ye oyo epanzani; bongo nakoluka bampate na ngai, mpe nakobikisa bango na bisika nyonso oyo bapanzanaki na mokolo ya mapata mpe ya molili.”1
GSAM 265.2Bato oyo kino na ntango wana (1847) bandimaki nsango ya anzelu ya misato, bazalaki babola na biloko ya mokili, mpe na yango, bakokaki kosala moke mpenza na makambo ya mbongo mpo na kopanza nsango yango. Pastɛrɛ White ná mwasi na ye mpe Pastɛrɛ Bates bamonaki ntina ya mosala ya moto na moto na kati ya bandeko oyo bapalangani, mpe lisusu ntina ya kobongisa mikanda ya kotanga mpo na kopesa na maboko ya bato, lokola lisungi mpo na komema bango na boyebi ya solo. Pastɛrɛ Bates azwaki lisungi monene mpo na kolimbola likambo ya Sabala na nzela ya buku na ye moke na likambo yango, ntango azalaki kokende na bisika ndenge na ndenge, mpe na nzela ya botindi na yango na nkomá. Asalaki mosala na molende monene koleka.
GSAM 265Libonza ya Ndeko Mwasi Moko ya Elenge mpo na Solo
GSAM 265.3Mbala moko, lokola azalaki na mbongo te mpo na kofuta nzela, alingaki kobanda kotambola na makolo longwa na Massachusetts kino New Hampshire. Kaka na ntango wana, azwaki mokanda uta na ndeko mwasi moko ya elenge oyo asalaki boyokani ya kosala misala ya ndako na dolare moko na pɔsɔ mpo ete azala na eloko ya kosunga mosala ya Nzambe. Nsima ya kosala pɔsɔ moko, likanisi ete Pastɛrɛ Bates azalaki na mposa ya mbongo esimbaki ye makasi, na boye ete akendeki epai ya nkolo mosala na ye mpe azwaki lifuti na ye liboso ya ntango mpo na kotindela ye mbongo ya dolare mitano ($5) na mbala moko. Na mbongo wana, afutaki mbongo ya mobembo na ye ya kokende na New Hampshire na mituka ya bato banso. Na bisika nyonso azalaki kosala makita ya malamu, mpe milimo ebele endimaki solo.
GSAM 266Kosala ndako na biloko ya kodefa
GSAM 266.1Mpo na komonisa molimo ya komipesa oyo etindaki babandisi ya liboso na nsango oyo, tomoni makambo oyo elandi uta na maloba ya Mama White na ntina na ezalela na bango na eleko ya malili ya 1847-48, tango bafandaki na bashambre na ndako monene ya S. Howland, na Topsham, Maine, esika babongisaki ndako na bango na biloko ya ndako ya kodefa:—
GSAM 266.2“Tozalaki babola, mpe tolekelaki mikolo ya mpasi. Mobali na ngai azalaki kosala mosala ya komema mabanga na nzela ya masíni, mosala oyo epasolaki loposo ya misapi na ye, mpe makila ebimaki na bisika ebele. Tozwaki mokano ya kotala te na moto mosusu, kasi ya komitombola biso moko, mpe kozala na biloko ya kosunga basusu. Kasi bolamu elandaki biso te. Mobali na ngai asalaki mosala makasi mpenza, kasi azalaki kozwa te mbongo oyo ebongi na ye mpo na mosala na ye.
GSAM 266Pastɛrɛ White azali kokata nkoni ya kotumba
GSAM 266.3“Mobali na ngai atikaki mosala ya nzela ya masíni, mpe na epasola na ye akendeki na zamba kokata nkoni ya kotumba. Na mpasi oyo ezalaki kokata ye na mopanzi ntango nyonso, azalaki kosala mosala banda ntongo-ntongo kino mpokwa mpo na kozwa soki senti ntuku mitano na mokolo. Mpasi ya makasi ezalaki kopekisa ye kolala na butu. Nokinoki tozwaki mikanda kowuta na bandeko na ba Etats ekeseni, kobengisa biso tókende kotala bango; kasi lokola tozalaki na makoki te ya kobimisa biso na Etat, eyano na biso ezalaki ete nzela efungwamaki liboso na biso te.
GSAM 266.4“Tozwaki mokanda uta na Ndeko Chamberlain, ya Connecticut, kolendisa biso ete tókende na likita moko na etuka wana. Tozwaki mokano ya kokende soki tozwaki ndenge ya kosala yango. Mobali na ngai asilisaki makambo na patron na ye, mpe amonaki ete patron asengelaki kofuta ye dolare zomi. Na ndambo ya mbongo wana, nasombaki bilamba oyo tozalaki na mposa makasi, mpe na sima nabongisaki manteau ya mobali na ngai, kutu na kotya biteni-biteni ya bilamba mosusu, yango esalaki ete ezala mpasi koyeba elamba ya ebandeli na maboko na yango. Etikali na biso dolare mitano mpo na kokumba biso tii na Dorchester, na Massachusetts. Trunk na biso ezalaki na pene na biloko nyonso oyo tozalaki na yango awa na mabele. Kasi tozalaki na kimia ya motema mpe na makanisi peto, mpe yango nde tozalaki kopesa motuya koleka biloko ya mabele.
GSAM 267.1“Tokendeki na ndako ya Ndeko Nichols, mpe liboso tókende, Ndeko mwasi Nichols apesaki mobali na ngai dolare mitano, oyo ekokisaki mbongo na biso ya mobembo kino na Middletown, na Connecticut. Tozalaki bapaya na engumba wana, mpe tomonaki ata moko te kati na bandeko na etuka wana. Etikali na biso kaka senti ntuku mitano. Mobali na ngai amekaki te kosalela mbongo wana mpo na kofutela kalesi, na yango abwakaki valize likolo ya liboke ya mabaya, mpe biso tokobaki kotambola koluka moto moko ya kondima lokola ya biso. Noki tokutanaki na Ndeko Chamberlain, oyo amemaki biso na ndako na ye.”
GSAM 267Likita na Rocky Hill, Conn.
GSAM 267.2Likita oyo esalemaki na Rocky Hill, esika ya likita ezalaki shambre moko monene, oyo etongami naino esili te, na ndako ya Ndeko Belden. Ndambo oyo elandi, oyo euti na mokanda oyo Pastɛrɛ White akomelaki S. Howland, epesi biso makambo mosusu ya kosepelisa etali likita yango:—
GSAM 267.3“Na mokolo ya 20 Aprili, Ndeko Belden atindaki shario na ye na Middletown mpo na biso mpe bandeko oyo bapalanganaki na engumba wana. Tokomaki na ndako na ye [Rocky Hill] pene na ngonga ya minei ya mpokwa, mpe na mwa miniti, Bandeko Bates na Gurney bakotaki. Tozalaki na likita na mpokwa wana na bato pene na zomi na mitano. Na ntongo ya Mokolo ya Mitano, bandeko bakobaki koya kino tokomaki pene na ntuku mitano. Bango nyonso bazalaki na solo mobimba te. Likita na biso ya mokolo wana ezalaki ya kosepelisa mingi. Ndeko Bates alimbolaki mibeko na polele, mpe ntina na yango emonisamaki makasi na nzela ya matatoli ya nguya. Liloba esimbaki mpo na kokómisa makasi baoyo bazalaki déjà na solo, mpe mpo na kolamusa baoyo bazalaki naino na makanisi mibale.”2
GSAM 267Babengisami na Oswego County, N.Y.
GSAM 267.4Na nsima ya bopalangani ya mokanda ya Pastɛrɛ Bates na kati ya Ba-Adventiste, bato na ba Etats misusu babandaki kobatela Sabala. Hiram Edson, ya Port Gibson, N.Y., akomaki mokanda mpo na kobenga Pastɛrɛ ná Mama White ná basusu bákende na likita ya babateli ya Sabala na Volney, na etuka ya Oswego, na sanza ya mwambe, 1848. Alobaki ete bandeko bazalaki babola mingi, mpe akokaki te kolaka ete bakosunga mingi mpo na kofuta misolo ya mobembo. Ntango wana, Pastɛrɛ White azwaki dolare 40 mpo na mosala oyo asalaki na elanga ya matiti. Ndambo ya mbongo yango esalelamaki mpo na kosomba bilamba oyo bazalaki na mposa makasi, mpe oyo etikali efutaki mobembo na bango ya kokende na Volney mpe ya kozonga.
GSAM 268.1Likita oyo na wɛsti ya New York esalemaki na ndako ya makalo ya Mongombo Arnold. Bato soki ntuku misato na mitano bazalaki wana, bango nyonso oyo bakokaki koyangana na eteni wana ya Leta, kasi ata bato mibale te kati na bango bayokanaki. Moko na moko azalaki kokɔtela makasi makanisi na ye moko, kolobaka ete ezali kolanda Biblia. Bango nyonso bazalaki na mposa ya kotombola makanisi na bango mpe kosakola yango. Bayebisaki bango ete Pastɛrɛ White ná mwasi na ye bautaki mosika boye te mpo na koyoka bango, kasi bautaki mpo na koteya bango solo. Mongombo Arnold andimaki ete mbula nkoto oyo elobelami na Emoniseli 20 esilaki kala, mpe ete nkoto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000) oyo etangami na Emoniseli ezalaki bato oyo basekwisamaki elongo na lisekwa ya Kristo.
GSAM 268Mongombo Arnold atɛmɛli mibeko ya losambo
GSAM 268.2Lokola bilembo ya Nkolo na biso oyo akufaki ezalaki liboso ya lisanga wana, mpe lokola bazalaki pene ya kokanisa bampasi na Ye, Mongombo Arnold atelemi mpe alobi ete andimaki te likambo oyo bazalaki pene ya kosala,—ete Elambo ya Nkolo ezali bokobi ya Pásika, oyo esengelaki kosalema kaka mbala moko na mbula.
GSAM 268.3Bokeseni wana ya makanisi ya kokamwa etyaki kilo monene likolo ya Mama White. Ayebaki malamu ete Mongombo Arnold azalaki na libunga, mpe mawa makasi eyaki likolo na ye, mpo emonanaki lokola nde Nzambe azali kokanisama mabe. Bamosusu babangaki ete azali kokufa; kasi Bapastɛrɛ Bates, White, Chamberlain, Gurney, mpe Edson babondelaki mpo na ye, mpe Nkolo na boboto ayokaki mabondeli ya baombo na ye, mpe azongelaki makasi. Mwinda ya likolo epemaki likolo na ye, mpe noki akomaki mosika na makambo ya mokili. Ntango azalaki na ezalela wana, balakisaki ye mwa mabunga ya bato oyo bazalaki wana, mpe lisusu solo na bokeseni na mabunga wana, kolakisaka ete makanisi wana ya bokeseni, oyo bazalaki koloba ezali kolanda Biblia, ezalaki kaka kolanda makanisi na bango moko likolo ya Biblia, mpe ete esengelaki batika mabunga na bango, mpe basangana na nsango ya anzelu ya misato. Likita esukaki na nkembo; solo elongaki. Bato oyo bazalaki na makanisi wana ya bokeseni ya kokamwa bandimaki mabunga na bango, mpe bayokanaki na solo ya sikoyo ya nsango ya anzelu ya misato, mpe Nzambe apambolaki bango mingi.
GSAM 269Emonaneli na Bosaleli ya Kokamwa ya Biblia
GSAM 269.1Lisolo oyo elandi etali likita oyo epesamaki na Mongombo Alexander Ross, na mokolo ya 4 sanza ya yambo 1884, ye moko ya bato ntuku misato na mitano oyo bazalaki na likita wana ya moke. Alobaki boye:—
GSAM 269.2“Ndeko mwasi White, ntango azalaki na emonaneli, atɛlɛmaki mpe azwaki Biblia ya libota na lobɔkɔ na ye ya mwasi; buku yango ezalaki na bonene ya momesano. Ntango azalaki kosimba yango efungwami, likoló, kozanga kotala epai na yango, na lobɔkɔ na ye ya mobali azalaki kobalusa nkasa longwa na eteni moko kino na mosusu, mpe ntango azalaki kotia mosapi na ye likoló ya mokanda, azalaki kozongela yango. Natálaki biteni mingi mpo na komona soki azalaki kozongela mpenza oyo azalaki kolakisa. Ngai moko to bato mosusu ya lisanga totalaki bango nyonso. Na likambo nyonso, azalaki kaka te kozongela maloba oyo azalaki kolakisa, kasi azalaki kosala yango ntango miso na ye etalaki likolo mpe na ngambo mosusu mosika na Biblia. Ezalaki nde makomi wana oyo azalaki kozongela nde ebukanisaki mateya ya lokuta ya babateli ya Sabala oyo bayanganaki na Volney, na sanza ya mwambe 1848, mpe esalaki ete tósangana na solo.”
GSAM 269.3Ya solo, esengelaki kozala mpasi mpo na kondimisa moto oyo aboyaki kotika libunga ya liteya oyo ebongisamaki na nse ya makambo ya boye, na nzela ya biteni ya Makomi ya polele oyo euti na Biblia, mpe na lolenge oyo ya kokamwa. Etuluku oyo ya babateli ya Sabala na etuka ya Oswego, sima ya mabunga na bango kobongisama na lolenge wana, mpe bango basanganaki na solo, babimaki na likita wana mpo na kopanza pole epai ya basusu. Mbuma na yango emonisaki polele ete ezalaki mosala ya Nzambe. Satana azali ntango nyonso pene mpo na kokabola, kobulunganisa, mpe kopanza, na nzela nyonso oyo akoki kosalela. “Nzambe azali te Mokeli ya mobulu, kasi ya kimya, lokola na ba Eklezia nyonso ya basantu.”3
GSAM 270Makambo ya kokamwa ya kobika
GSAM 270.1Nsima ya likita oyo elobelamaki liboso, makita esalemaki na Comté ya Madison, Port Gibson, Port Byron, mpe na engumba ya New York. Nsima na yango, likita moko monene esalemaki na Connecticut. Na bisika mosusu kati na oyo, Nkolo apusanaki penepene na basali na ye, mpe nguya ya kobikisa ya Monganga Monene eyaki likolo ya babɛli na eyano na mabondeli ya makasi ya bato na ye ntango bazalaki kolanda mobeko oyo etiami na Mokanda ya Yakobo.4 Ata bato oyo minganga balobaki ete bazali na elikya te babikisamaki na bokono na bango. Makambo ya lolenge wana esalemaka mbala na mbala na bitango ekeseni banda mobu 1845.
GSAM 270Babandisi ya liboso bayikaka mpiko na mpasi
GSAM 270.2Pastɛrɛ White, na zulunalo Review and Herald, na mokolo ya 5 sanza ya mibale 1880, ntango azalaki kolobela mikolo wana ya ebandeli, alobaki boye:—
GSAM 270.3“Na misala na biso ya liboso, toyokaki nzala mpo na bozangi bilei ya malamu, mpe malili mpo na bozangi bilamba ya malamu. Tomipesaki ata na biloko ya ntina ya bomoi te mpo na kobomba mbongo mpo na ntina ya Nzambe. Nzokande na ntango yango moko, tozalaki komilɛmbisa makasi mpo na kosala mosala monene oyo emonanaki esengelaki kosalema na kokoma, kobongisa mikanda, kotambola, mpe kosakola longwa na etuka moko kino na mosusu.”
GSAM 270.4Mbula 1848 ezalaki ya kokamwa, kaka te na lisolo ya boyei, kasi mpe na politiki. Bosolo ya nsango ya anzelu ya misato elimbolamaki malamu mpenza, mpe nzela ezalaki kofungwama na bangámbo ekeseni mpo na bokende liboso ya mosala. Na tango wana, makambo na mokili ya bizaleli mpe ya politiki ezalaki kokoma na lolenge moko oyo esengelaki kolamusa lisusu likebi ya bayekoli ya masakoli. Kaka mobulungano monene ezalaki te kati na bikolo ya Mokili ya Kala, kasi na Hydesville, na etuka ya Wayne, na New York, bilakiseli ya Spiritualisme ya mikolo na biso ebandaki, oyo bayekoli ya Biblia balobaki ete esengelaki kozala “milimo ya bademo, oyo ekosangisa bikolo ya mokili mobimba mpo na etumba ya mokolo ya Nkolo.”
GSAM 271Boningani ya Bikolo na 1848
GSAM 271.1Na mokolo ya 21 sanza ya mibale 1848, ntango bato ya lokumu ya Louis Philippe, ya France, bayanganaki zingazinga na ye, alobaki: “Natikalaki naino te kofanda ngwi na kiti ya bokonzi lokola lelo na butu.” Na pokwa ya mokolo oyo elandaki, alati “kazaka moko ya mokuse”, amibombi lokola mokumbi-kalesi ya kofutela, akimaki libanda ya bifelo ya engumba Paris mpo na koluka esika ya kobombana mpo na libateli ya bomoi na ye. Ntina ya mbongwana wana ya monene mpe ya mbala moko elobamaki ete ezalaki mpo na likambo moko oyo ye asalaki mpo na kosunga bokonzi oyo Pápa amipesaki kozanga lotomo, likambo oyo esilikisaki bato na ye mpe basoda na ye. Na mokolo wana, asilisaki na engumba ya Paris botalisi moko monene ya basoda ya France; mpe tango batyaki bibundeli na bango na esika, azongaki na ndako ya bokonzi, kasi na mbala moko mwana mobali moko ya moke amataki na likolo ya kanɔ́, azalaki koningisa bendele ya langi misato, mpe koganga, “Bokweisa pápa! BOKWEISA PÁPA!!” Basoda, na kolanda ngongi wana, babandaki koganga yango na lombangu na molɔngɔ́ mobimba, mpe ngongi yango ezalaki se kokóma makasi, kino bakisaki na yango ngongi mosusu: “MPE BOKWEISA MOKONZI!” Na mwa ngonga moke, engumba mobimba ya Paris etondaki na mobulu monene. Basoda, na mandoki na mabɔkɔ, elongo na ebele ya bato ya mobulu, bazalaki kokima na lombangu mpo na kokende na ndako ya mokonzi. Ye, ntango bayebisaki ye mobulu oyo, akimaki na lombangu na bilamba ya kobombana.
GSAM 271Bikolo oyo bikɔtaki na etumba
GSAM 271.2Mobulu mpe mitungisi ya France epanzanaki mbangu na bikolo mosusu. Prusse, Hanovre, Sardaigne, Sicile, Naples, Venise, Lombardie, Toscane, mpe Rome bazwaki mpe molimo wana ya mobulu. Na kati ya sanza misato, Europe mobimba etondaki na mobulu, mpe ba empires mpe bokonzi koleka ntuku misato ezalaki na mobulu monene. Bakiti ya bokonzi ezikisamaki na balabala, bakonzi mpe ba empereur bazalaki kokima mpe komibomba na kobanga kobungisa bomoi na bango. Bato ya politiki balobaki ete mbongwana monene ya boyangeli ya mokili mobimba ekosalema.
GSAM 272.1Bapastɛrɛ mingi ya Ba-Adventiste oyo bayokaki naino te nsango ya anzelu ya misato, bamonaki mobulu oyo, mpe bakanisaki ete esengelaki kozala kosangana ya bikolo mpo na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe ya nguya nyonso.”5
GSAM 272Nsango ya Kotya Elembo Emonani
GSAM 272.2Kaka na ntango wana, Ba-Adventiste ya Mokolo ya Nsambo bazalaki koyekola na Makomi ete Sabala ya mobeko ya minei ezalaki elembo, to esigili, ya Nzambe ya bomoi, mpe ete ntango ekokaki mpo na kosakola nsango ya kosigama ya Emoniseli 7:1-4, mpe bazalaki koluka banzela ndenge na ndenge mpo na komema nsango oyo epai ya bato. Ntango bato ya mokolo ya nsambo bazalaki komibongisa mpo na mosala oyo, Ba-Adventiste ya Mokolo ya yambo bazalaki koloba, “Bozali na retard mingi na nsango na bino ya kotia elembo, mpo etumba ya mokolo monene mpe boyei ya solo ya Nkolo ekómi pene na biso.”
GSAM 272Mobulu Ekitá na Kimya na Mbalakaka
GSAM 272.3Sima ya pene na sanza misato, mobulu na kati ya bikolo ekitaki; kasi te na nzela ya boyokani mpo na makambo oyo bazalaki komilelalela mpo na yango, kasi na lolenge oyo bapanzi sango bango moko bakokaki te kolimbola. Mpo na mobulu oyo, Horace Greeley, na zulunalo New York Tribune, alobaki: “Ezalaki likambo ya kokamwa mpo na biso nyonso koyeba nini ebandisaki na mbala moko mobulu wana na kati ya bikolo; kasi ezali likambo ya kokamwa koleka koyeba nini esilisaki yango.”
GSAM 272Senatere Choate na ntina na makambo ya Mokili ya Kala
GSAM 272.4Tokomi na mobu 1851, mpe tokuti Sénateur Choate, na diskur na ye liboso ya Congrès ya Etats-Unis, azali kolobela ndenge makambo ezalaki na Mokili ya Kala, mpe alobi boye:
GSAM 272.4“Ndenge nini mpenza ezalela mpe lolenge wana ezali, oyo emonani lokola nde bilili, mapata, mpe molili ezali kofanda likolo na yango, bino boyebi yango malamu; ndenge nini ezali na mobulungano mobimba. Emonanaki na ngai lokola nde makoki ya bokonzi ya bakonzi, mpe ntomo ya bato, mpe nkanda oyo ebombamaki na boumeli ya mibu nkoto moko ezalaki pene ya kobimisa mopanga mpo na etumba oyo makila ekotanga, lokola na emonaneli ya nsuka ya mokili, ‘kino na bakangeli ya bampunda,’ mpe oyo libota mobimba ya bato ekolongwa; epai wapi ngonga monene ya ntango ekobeta ngonga mosusu; epai wapi lisanga ya bato yango moko ekomekama na moto mpe na ebende, mpo na koyeba soki ezali ya mokili mpe ya Nzambe ya mokili to te.”
GSAM 273“Litatoli” ya mokolo ya 18 sanza ya zomi na moko 1848
GSAM 273.1Wana baoyo bazalaki koloba ete koningana oyo na kati ya bikolo na mobu 1848 ezalaki mpo na kofungola nzela na boyei ya Nkolo bakutanaki na kozanga kokokisama ya elikya ya mawa, ndenge nini ezalaki mpo na Ba-Adventiste ya Mokolo ya Nsambo oyo bazalaki koloba ete ntango ekokaki sikoyo mpo na “elembo ya Nzambe ya bomoi” elakisama na bato? Mpo na koyanola, tozwi maloba uta na mokanda moke oyo Pastɛrɛ Joseph Bates abimisaki na sanza ya yambo, 1849. Ntango azalaki kolobela likambo moko oyo esalemaki na mokolo ya 18 sanza ya zomi na moko, 1848, alobi boye:—
GSAM 273.2“Lisanga moke ya bandeko mibali na basi basanganaki na likita na Dorchester, pene ya Boston, na Massachusetts. Liboso likita ebanda, biso mosusu tozalaki kotalela makambo mosusu ya nsango ya kotia elembo; bokeseni ya makanisi ezalaki na ntina na bosolo ya ndimbola ya liloba ‘komata,’ mpe bongo, lokola tosalaki ete kobimisa nsango yango ezala likambo ya losambo na likita ya Topsham [Maine] mwa moke liboso, mpe nzela ya kobimisa emonanaki polele te, na yango toyokanaki biso nyonso elongo mpo na kotika likambo yango nyonso na maboko ya Nzambe. Nsima ya ntango moke oyo tolekisaki na libondeli ya makasi mpo na kozwa pole mpe mateya, Nzambe apesaki Ndeko mwasi White makambo oyo na emonaneli:—”
GSAM 273.2Tozali kotánga maloba ndenge alobaki yango ntango azalaki na emonaneli:—
GSAM 274Maloba oyo elobamaki na kati ya Emonaneli
GSAM 274.1“Mwinda epelisaki wapi? Tika anzelu na yo ateya biso esika mwinda epelisaki. Ebandaki na moke, ntango yo opesaki mwinda moko sima ya mosusu. Litatoli mpe mibeko bikangisami elongo, ekoki kokabwana te; oyo ya liboso ezali mibeko zomi, na nzela ya Nzambe. Asepelaki mingi ntango mobeko na ye ebandaki komata na makasi, mpe bisika ya mpamba ebandaki kotongama. Euti na bolembu, ekómi makasi na nzela ya kolukaluka liloba na ye. Momekano likolo na yango eumelaki te. Ezali elembo! Ezali komata! Ezali kotelema, kobanda na ntongo. Lokola moi, na ebandeli malili, ekómaka mɔtɔ mpe etindaka banzela na yango ya pole. Ntango bosolo wana etelemaki, pole na kati na yango ezalaki moke, kasi ezali se kobakisama. Oh, nguya ya banzela oyo ya pole! Ezali se kokóma na makasi. Bozito mpe pole ya monene koleka ezali likolo ya solo wana, mpo ewumelaka libela, ntango Biblia ekozala lisusu na ntina te. Emataki kuna na este; ebandaki na pole moke, kasi banzela na yango ebikisaka. Oh, solo wana ezali na nguya boni! Ezali ya likolo koleka sima ya kokota na bango na mabele ya bolamu, kasi ekokola kino bakokoma bakufaka te. Ebandaki na botombwami ya moi, ekobaka na nzela na yango lokola moi, kasi elalaka te.
GSAM 274.2“Ba anzelu bazali kosimba mipepe minei. Ezali Nzambe nde akangaka nguya. Ba anzelu batiká te, mpo basantu nyonso bazali naino te na elembo. Tango Mikaele akotelema, mpasi oyo ekotondisa mokili mobimba. Kasi, bazali kaka pene ya kopepa. Likambo ezali kokangama mpo basantu bazali naino te na elembo. Iyo, yebisá makambo omonaki mpe oyokaki, mpe lipamboli ya Nzambe ekozala na yo. Bótala! Komata wana ezali na makasi, mpe ezali kongɛnga lisusu mpe lisusu.”6
GSAM 274.3Nsima ya kobima na emonaneli oyo, Mama White alobaki na mobali na ye,
GSAM 274.3“Nazali na nsango mpo na yo. Esengeli obanda kobimisa mwa zulunalo mpe kotindela bato yango. Yango ezala moke na ebandeli; kasi ntango bato bakotanga, bakotindela yo mbongo mpo na kobimisa yango, mpe ekozala na elonga banda na ebandeli. Uta na ebandeli wana ya moke, balakisaki ngai ete ezali lokola bibale ya pole oyo ezingaki mokili mobimba.”
GSAM 275Kotya ntembe na miso ya bomoto
GSAM 275.1Bisakweli wana elobamaki na mobu 1848 mpo na botombwami mpe bopalanganisami ya solo ya Sabala. Soki totalaki likambo yango na miso ya bato na ntango wana, mayele elingaki koloba, “Esakweli wana ekokokisama ata mokolo moko te.” Moto moko alobaki na moko ya basali na biso mwa moke sima esakweli wana elobamaki, “Ekozwa bino mbula 144 000 mpo na kosala likambo oyo bozali kokana kosala.” “Nini!” bakolobaka, “bapanzi-nsango misato—Pastɛrɛ White ná mwasi na ye, mpe Pastɛrɛ Bates—bango nyonso bazangi mbongo, na balandi na bango na se ya nkama moko, bango nyonso mpe bazangi mbongo, bakendeke na mwa bankama ya bakopi ya buku moke ya nkasa ntuku mwambe na likambo ya Sabala, mpo na kopesa nsango ya likebisi na mokili mobimba! Makanisi ya bozoba!” Ntango bato oyo bazalaki kokanisa bongo balobaki, “Ekozala te!” kondima na nsango mpe litatoli ya bolongi ya solo elobaki, “Na nkombo ya Nzambe ya Yisraele ekosalema! mpe na kotyela makasi na Ye motema, esengeli kosalema!”
GSAM 275Ndenge Zulunalo ya Liboso ya Ba-Adventiste ya Mokolo ya Nsambo Ebimisamaki
GSAM 275.2Banda ntango litatoli epesamaki mpo na mosala ya kobimisa mikanda, mabondeli ebele esalemaki na bandimi ya mokolo ya nsambo, ete Nkolo afungola nzela mpo na konyata “zulunalo moke.” Mposa monene ezalaki mbongo mpo na kobimisa nimero ya liboso. Na sanza ya motoba, 1849, Pastɛrɛ White azwaki libaku ya kokata matiti ya timothy na mbɛli ya kokata matiti ya lobɔkɔ na etando ya ba acres ntuku minei (40), na mbongo ya centime ntuku nsambo na mitano (75) na acre moko; mpe na ndenge wana, akokaki kobimisa nimero ya liboso ya zulunalo moke wana. Ekozala mabe te soki totii awa elilingi ya lokasa ya liboso ya zulunalo moke wana. Motangi akomona na kolɔ́ni ya liboso maloba ya Pastɛrɛ White, esika alobi, “Nzela efungwami naino te mpo na kobanda mosala kino sikoyo.” Mpe okoki mpe komona ete ezalaki komipesa na ye nde “efungolaki nzela.”
GSAM 276Lisolo ya Mama White na ntina na Mikanda ya Liboso
GSAM 276.1Mama White alobi boye mpo na ebandeli ya mosala ya kobimisa mikanda:—
GSAM 276.2“Mobali na ngai abandaki kobimisa mwa lokasa moke na Middletown, na bamile mwambe mosika na Rocky Hill, na Connecticut, mpe mbala mingi azalaki kotambola nzela wana ya kokende mpe kozonga, atako na ntango wana azalaki kotɛngatɛnga. Ntango ayaki na nimero ya liboso uta na ndako ya konyata, biso nyonso togumbamaki zingazinga na yango, kosengaka Nkolo, na mitema ya komikitisa mpe na mpisoli ebele, ete apambola milende ya bolembu ya mosali na ye. Sima na yango, atindaki mokanda yango epai ya bato nyonso oyo akanisaki bakotanga yango, mpe amemaki yango na posita na kati ya sakosi ya karpeti. Nimero nyonso ezalaki komemama longwa na Middletown kino na Rocky Hill, mpe ntango nyonso liboso ya kobongisa yango mpo na poste, ezalaki kotandama na liboso ya Nkolo, mpe mabondeli ya makasi, esangani na mpisoli, ezalaki kopesama na Nzambe ete mapamboli na Ye elanda batindami wana ya kimya. Noki mpenza, mikanda eyaki komema mbongo mpo na kobimisa zulunalo, mpe nsango malamu ete milimo ebele endimaki solo.”7
GSAM 276Esakweli ya Lisungi mpo na Zulunalo Ekokisami
GSAM 276.3Ezali na mayoki ya mozindo koleka mposa ya koyeba mpamba nde tozali kolakisa lokasa oyo ya liboso ya zulunalo ya liboso oyo ebimisamaki na Ba-Adventiste ya Mokolo ya Nsambo. Buku mobimba ya The Present Truth ezalaki na biteni zomi na moko ya nkasa mwambe, moko na moko na bakolɔ́ni mibale. Esika ya kotanga na lokasa ezalaki na bonene ya pouce minei na mitano ya mwambe na molai ya pouce mwambe. Numelo 1 na 4 ebimaki na sanza ya nsambo, ya mwambe, mpe ya libwa, na Middletown, Conn. Numelo 5 kino 9 ebimaki na Oswego, N.Y., mpe ezali na dati ya sanza ya zomi na mibale, 1849, sanza ya misato, ya minei, mpe ya mitano, 1850. Numelo 11 ezali na dati ya sanza ya zomi na moko, 1850, mpe ebimaki na Paris, Maine. Na Nimero 6, Pastɛrɛ White alobaki, “Ntango tozalaki kobimisa banimero minei ya liboso, mbongo ekɔtaki koleka ndelo mpo na kofuta mikanda. Tosalelaki yango mpo na kofuta misolo na biso ya makita oyo tokendaki.” Na mobu 1849, na nse ya bopusi ya mikanda oyo, mpe misala ya bapionniers ya Pastɛrɛ Bates, bato ebele bandimaki nsango malamu na Vermont, Michigan, mpe na ba Etats misusu.
GSAM 278.1Na bokeseni na ezalela ya mosala oyo ezalaki komonisa elikya te na mobu 1848, tokotalela mwa makambo ndenge ezali na mobu 1905, mpe na boye tokokoka kosambisa malamu koleka na ntina na suka ya likambo oyo, mpo na koyeba soki bazalaki na bosolo baoyo baboyaki ebandeli ya komikitisa ya nsango, to Nzambe ya likolo oyo alobaki na nzela ya mosali na ye ya mwasi na ntina na makasi oyo ezalaki “kokola” ya mosala ya “kotia elembo”.
GSAM 278Bokoli ya Mosala ya Kobimisa Mikanda
GSAM 278.2Solo oyo ezali sikoyo kosakolama mpe konyatama na pene ya ntuku minei ya minoko ya minene ya mokili. Na esika ya bapastɛrɛ misato, ezali na koleka 600, soki totangi bapastɛrɛ oyo bapambolamaki mpo na mosala mpe basakoli oyo bazwaki ndingisa, longola bankama mosusu oyo bazali kosala lokola minganga, basali ya Biblia, balakisi, mpe bamisionele ya monganga. Mikanda ya lingomba emonisami na bazulunalo koleka ntuku mitano ya ndenge na ndenge, oyo enyatamaka na bandako ya kobimisa mikanda pene na ntuku mibale oyo ezwami na Eropa, Azia, Afrika, Amerika ya Nola mpe ya Sudi, bisanga ya Pasifiki, mpe Australia. Na kati ya bandako wana ya kobimisa mikanda, enyatamaka babuku, bapamfletɛ, mpe batrakɛ koleka nkoto moko na nkama moko ya ndenge na ndenge. Mpo na kozwa kopi ya mokomoko na yango, elongo na bazulunalo ya mobu mobimba, ekosenga soki dolare 340. Na esika ya kaka bandimi nkama moko, ezali pene na 100 000 oyo bazali kosepela na solo oyo. Ya solo, nsango oyo, lokola moi, ezali “kotana,” mpe tokoki koloba, na maloba ya litatoli ya 1848, “Oh, nguya ya kongɛnga oyo!”
GSAM 278Ezalela ya Bikolo
GSAM 278.3Wana nsango ezalaki kokende liboso boye, ndenge nini bikolo bizalaki? Banda na ntango wana kino lelo, na bazulunalo, tozalaki mbala na mbala kotanga maloba etali etumba monene oyo elingaki kosalema mosika te na Eropa. Ata soki matata ezalaki kuna mpe bitumba moke kuna, “mopepe makasi” mobimba ekangami naino,—“mipepe minei” epesami nzela te ete epepa nyonso na mbala moko, “kino basali ya Nzambe batyama elembo.” Ete biloko ya ntembe mpe ya bitumba ezali wana, kasi ebimaka polele te mpo bakangami, yango emonani na miso ya bato nyonso.
GSAM 279.1Henry Ward Beecher, mwa moke liboso akufa, abengaki kotɛlɛmisa mampinga ya minene boye na Eropa “kobenda makila ya bomoi liboso, na kobanga ete ekosopana.” Amonisaki ete ezalela kati na bikolo, na kanda mpe mabe oyo bazali na yango moko epai ya mosusu, mpe lolenge bazali kobangisana, ezali lokola “kokangama ya makasi,” oyo euti na etuluku ya bato oyo batié moko na moko mbeli na ntolo, kasi moko te na kati na bango alingi kobeta, na kobanga ete bábeta ye. Alobaki ete, “Kasi, moko na kati na bango akomona mosika te ntango ebongi mpo na kobeta, mpe wana etumba ya monene ekobanda.”
GSAM 279Bokokanisi ya Bisaleli ya Etumba
GSAM 279.2Banda mobu 1848, babimisi bibundeli ya bitumba oyo, soki tokokanisi na yango, oyo ya malamu koleka ya ntango wana ekomonana lelo lokola biloko ya masano mpamba. “Peace Association” ya Amerika, na libiangi na yango mpo na misala ya kimia na Lomingo ya Kimia,—mokolo ya 15 Desembere 1895,—elobaki boye: “Sikawa, atako bokoli ya civilisation emonani polele, kasi na ngambo mosusu, mabongisi mpo na bitumba kati na bikolo eleki ndenge ezalaki liboso.”
GSAM 279Général Miles na ntina na Mibongisi ya Etumba
GSAM 279.3Général Nelson A. Miles, na diskur na ye na likita monene na Washington, D.C., na mokolo ya 12 sanza ya yambo 1904, alobaki:—
GSAM 279.4“Na eleko oyo ya pole, ya bokoli mpe ya civilisation ya mayele mpe ya bongisami, tolingaki kondima na esengo ete mikumba mpe makama ya etumba ekitaki; kasi, ata soki emonani lokola likambo ya kokamwa, eleko moko te na lisapo ya mokili mobimba ezalaki oyo bozwi ebele boye ebebisamaki mpo na kobongisa etumba, to mpe oyo bamilio ebele ya mibali bayekolisami, bayebi mosala, mpe bamizwami na disipline, basimbi bibundeli ya koboma koleka, balongolamaki na banzela ya misala ya kimya, lokola na ntango oyo.”
GSAM 280.1Kasi mopepe makasi ya etumba ezali naino koumela, ntango mosala ya kotia bilembo ezali kokoba.