Mokapo 8 — Elambo ya Libala ya Mwana-Mpate
GSAM 134.1“Moto moko abongisaki elambo monene, mpe abengisaki bato ebele; mpe atindaki moombo na ye na ngonga ya kolia mpo na koyebisa baye babengisamaki ete, Bóya; mpo biloko nyonso esili kobongisama.”1
GSAM 134.2“Esengo na bango oyo babengami na feti ya libala ya Mwana na Mpate.”2
GSAM 134.3Elambo ezali bilei ya suka ya mokolo. Na lisolo oyo ya kotalelama, eza na bibengisi misato mpo na elambo. Lisolo oyo ya kotalelama esengeli te kosangisama na bibengisi mpo na “bilei ya midi” oyo elobelami na Matai 22:1-7. “Dîner” ezali bilei ya midi. Na lisolo ya ndakisa oyo elobeli kobengama na dîner, toyekoli ete bato oyo bapesaki libiangi “banyokwamaki na nko” mpe babomamaki, mpe ata mwana ya mokonzi mpe abomamaki. Mokonzi oyo atindaki libyangi “abomaki babomi wana, mpe atumbaki engumba na bango.”
GSAM 134.4Lisapo oyo ya mabiangi mpo na “bilei ya midi,” oyo ezali kolakisa makambo ekómelaki baoyo baboyaki libiangi yango liboso, emonisaki malamu mpenza likambo oyo ekómelaki mpenza baoyo baboyaki nsango malamu ya Kristo, mpe babomaki ye ná bantoma na ye. Nkolo atindaki mampinga mpo na kobundisa ekolo wana, oyo “babomaki babomi wana, mpe batumbaki engumba na bango”—Yeruzalemi.
GSAM 134Libyangi ya Bilei ya Butu
GSAM 134.5Libyangi oyo ya bilei ya feti na lisolo elobeli mpenza “bilei ya feti ya libala ya Mwana-Mpate.” Mapamboli ezali mpo na baye babengami na “bilei wana ya feti ya libala.” Bilei ya feti ya libala elandaka libala. Libala ya Mwana-Mpate ekosalema liboso ayela; mpo, lokola tomonaki yango liboso, tango Kristo akoya na suka, akozonga “uta na libala.”3
GSAM 135.1Na yango, libiangi oyo ya feti ya libala esengeli kozala lolenge moko na nsango ya anzelu ya liboso na Emoniseli 14, mpe na liyebisi ya ntango ya mokapo ya zomi, oyo esili kolobelama. Ndenge Luká akomaki, libiangi oyo ya liboso ya feti ekendeki epai ya “baoyo babengamaki.” Nani bazalaki baoyo babengamaki?—Baoyo bayokaki mpe bandimaki nsango malamu ya Kristo. Balobaka ete balingaka Kristo, mpe balingaka bozongi na ye ya mibale lokola kokokisama ya elikya na bango. Mpo na nini libiangi ekende liboso epai na bango te? Ndenge esengelaki ete nsango malamu elobama liboso epai ya Bayuda oyo bazalaki na Makomi Mosantu, mpe bazalaki koloba ete bazali kozela boyei ya Masiya,4 bongo mpe nsango ya bozongi ya Kristo ya mibale elakisamaki liboso epai ya baoyo bazalaki koloba ete bazali balandi na ye, mpe balingaka komonana na ye.
GSAM 135Libyangi epai ya ba oyo babengamaki
GSAM 135.2Libyangi ya liboso mpo na bilei ya mpokwa, lokola ezalaki mpo na baoyo babengamaki, esengelaki kokende na baeklezia. Sikawa, na bosolo nyonso, liyebisi ya boyei ya Kristo oyo ezalaki pene, kobanda mobu 1833 kino na eleko ya milona ya 1844, esalemaki na kati ya baeklezia, mpe na ndenge monene, bapastɛrɛ ya baeklezia yango mpe bandimaki yango. Ebimeli ya liboso ya William Miller na makanisi na ye na ntina na boyei ya Kristo oyo ezalaki pene ebimaki na zulunalo moko ya Baptist na Brandon, Vt. Misala ya ye mpe ya baninga na ye kino sanza ya minei, 1844, esalemaki mingi na bandako ya lingomba to na bisika ya minene oyo ba lingomba ya ntango wana ezalaki kozwa.
GSAM 135.3Pastɛrɛ Himes alobi boye mpo na misala ya Pastɛrɛ Miller kino na eleko ya milona ya mobu 1844:
GSAM 135.3“Asalaki mosala na kati ya bituluku mpe mangomba nyonso, kozanga kokota na ndenge ya boyangeli to mibeko na bango, na kondima ete bandimi ya mangomba ekeseni bakokaki kotikala na esika na bango, mpe na ntango moko komibongisa mpo na boyei ya Mokonzi na bango.”
GSAM 135.4Pastɛrɛ Himes, ntango azalaki kolobela misala na ye mpe ya Pastɛrɛ Miller ya bomoko, abakisaki lisusu ete: “Bapastɛrɛ mpe mangomba mingi oyo bafungolelaki biso mpe bandeko na biso bikuke, bango oyo bazalaki kosakola liteya ya boyei, basalaki elongo na biso kino na mobu ya suka”—mobu 1844.
GSAM 136Bikuke Bifungwami mpo na Nsango
GSAM 136.1Mpo na mosala na ye mpe lolenge na yango, Wm. Miller alobaki:
GSAM 136.1“Bikuke efungwami mpo na ngai mpo na kosakola liteya oyo ya bozongi ya Kristo na kati ya pene na mangomba nyonso, na boye ete nakokaki koyanola kaka na mwa ndambo ya mike ya bibengisi.... Na bisika nyonso oyo nakendeki, bandimi ya mangomba oyo bazali na bomoi, bamipesi, mpe bato ya Nzambe nde bandimaka na pɛtɛɛ makanisi oyo mazali kosakolama; nzokande moto ya mokili oyo alobaka ete azali mondimi, Mofarisai, moto ya motema makasi, moto ya lolendo, ya motema likolo, mpe ya bolingo ya ye moko, nde azali kosɛka mpe kotyola liteya ya bozongi ya Kristo.”
GSAM 136.2Mpo na ndenge nsango ya boyei ya Kristo ezali, tokoki koloba mpo na yango lokola D'Aubigné alobaki mpo na Mbongwana,—Esalemaki “na nkombo ya mobeko moko ya molimo. Esakolaki lokola molakisi na yango, liloba ya Nzambe; mpo na lobiko, kondima; mpo na bibundeli, Molimo Mosantu: mpe na nzela ya makambo wana mpenza, eboyaki biloko nyonso ya mokili.”
GSAM 136Mbonge Monene ya Elamukisi ya Molimo
GSAM 136.3Ndenge ya elamukisi ya molimo oyo elandaki liyebisi ya nsango ya boyei ezali kolimbolama boye na L. D. Fleming, pastɛrɛ ya lingomba ya Christian ya balabala Casco, na Portland, Maine:—
GSAM 136.4“Mposa oyo mateya na ye [Wm. Miller] elamwisaki ezali ya kokanisa malamumalamu mpe ya kozanga mayoki ya koleka, mpe atako ezali elamukisi ya molimo ya monene koleka oyo naino namona te, kasi ezali na esengo ya koleka ndelo moke mpenza. Emonani lokola esimbaka mingi koleka mibali ya esika wana. Oyo nde ezali kosala yango: Ndeko Miller azwi kaka mopanga ya Molimo, abimisi yango na gaine na yango, mpe atie nsɔngɛ na yango ya makasi likolo ya motema ya bolumbu, mpe ekati! wana kaka. Liboso ya nsɔngɛ ya ebundeli oyo ya makasi, kozanga kondima ekwei, mpe liteya ete bato nyonso bakobikisama ekauki. Miboko ya lokuta milimwi, mpe batekisi ya Babel bakamwi. Emonani na ngai ete oyo esengeli kozala eloko eleki pene na kozala lokola elamukisi ya molimo na mikolo ya bantoma, kati na makambo nyonso oyo ntango ya lelo emonaki.”
GSAM 137Likambo moko na Richmond, Me.
GSAM 137.1Lokola ndakisa ya mosala ya elamukisi ya molimo oyo ezalaki elongo na liyebisi ya liteya ya boyei ya Kristo, tokotanga maloba ya lapolo ya moto moko oyo azalaki kosangana makasi na lingomba wana. Ntango azalaki kolobela likita ya sanza misato na misato oyo esalemaki na Richmond, Me., oyo ezalaki komonisa ba eglize ntuku misato ya Babaptiste ya Bolingo-Mokano, alobi boye:—
GSAM 137.2“Ntango nakotaki na ndako ya losambo, Pastɛrɛ Rollins, oyo afandaki pembeni ya esika ya kotanga maloba na suka ya ndako, atelemaki mpe alobaki, ‘Ndeko White, okofanda awa pembeni na ngai.’ Sima ya liteya, bapesaki nzela mpo na maloba, mpe nalobaki na bonsomi likolo ya bomoi ya bokristo, mpe bolongi ya bato ya sembo na bozongi ya mibale ya Kristo. Mingongo ebele egangaki, ‘Amen! amen!’ mpe ebele na kati ya lisanga wana ya monene bazalaki kolela na mpisoli.... Noki na suka ya likita wana, sima ya kozwa ndingisa na ngai, Pastɛrɛ Rollins atɛlɛmaki mpe alobaki: ‘Ndeko White, oyo afandi na loboko na ngai ya mobali, akoloba na ndako ya losambo ya Reed lelo na mpokwa, na ntina na bozongi ya mibale ya Nkolo na biso Yesu Kristo. Bómatá, bandeko, mpe bóyoka bino moko. Tozali na esika ekoki mpo na koyamba bino nyonso. Bómatá, bandeko, ekobebisa bino te koyoka likambo oyo.... Ayebaki malamu ete mingi ya bandeko na ye bakotika likita na bango na mboka, bakokende na bamile misato mpo na koyoka ngai, mpe ete likita na bango ya mosala oyo ebongisamaki ekobukama. Mpe bongo esalemaki. Bapastɛrɛ misato kati na minei mpe pene na motindami nyonso balongwaki, mpe ndako ya likita ya Reed etondaki na bato noki. Lisolo na ngai ezalaki na likambo ya Matai 24. Molimo ya Nzambe apesaki ngai bonsomi monene. Bato basepelaki makasi.
GSAM 137.3“Ntango nasukisaki na toli mpo na bakristo bamipesa mobimba mpe bámibongisa, mpe mpo na basumuki baluka Kristo mpe bámibongisa mpo na boyei ya Mwana ya Moto, nguya ya Nzambe eyaki likolo na ngai na boye ete esengelaki nasimba etɛlɛmɛlo ya mosakoli na maboko mibale mpo na komitɛlɛmisa. Ezalaki ngonga moko ya bozito. Ntango nazalaki kotalela ezalela ya basumuki, oyo babungi nzela kozanga Kristo, nabengaki bango na kolela, nazongelaki mbala na mbala ete, ‘Yaka epai ya Kristo, mosumuki, mpe okobikisama ntango akomonana na nkembo na ye. Yaka, mosumuki ya mobola, liboso ete eleka ngonga. Yaka, mosumuki, mosumuki ya mobola, yaka.’
GSAM 138.1Esika yango ezalaki na kimya mpe bozito ya somo. Bapastɛrɛ mpe bato bazalaki kolela, basusu na mongongo makasi. Na suka ya libiangi nyonso mpo na mosumuki, kolelalela ya bato nyonso eyokanaki na lisanga mobimba. Natɛlɛmaki na makolo kolimbola mokapo mpe kopesa toli koleka ngonga mibale, mpe mongongo na ngai ebandaki kokauka. Nakangaki monoko, mpe nalelaki na mongongo makasi mpo na bato wana ya bolingo na mayoki ya mozindo lokola kaka ye moko ayebi, ye oyo Nzambe abengi mpo na kosakola solo na ye epai ya basumuki. Ngonga ezalaki libwa, mpe kopesa basusu nzela ya koloba elingaki koloba kokoba na likita kino na katikati ya butu. Ezalaki malamu kosukisa na mayoki ya mozindo ya ntango wana, kasi te liboso ete moto nyonso azwa libaku ya kopona ngambo ya Nkolo. Na nsima, nasɛngaki na bato nyonso na lisanga oyo balingaki kosangana na ngai na libondeli, mpe baoyo balingaki komemama na kiti ya ngolu, mpo bázala prêt mpo na kokutana na Mobikisi na esengo na boyei na ye ya mibale, bátelema. Molimo nyonso na ndako wana ya monene, ndenge bayebisaki ngai na nsima na bato ya bisika bikeseni, etelemaki. Sima ya mwa ntango mokuse ya libondeli, likita esukaki.
GSAM 138.2Na ntɔ́ngɔ́ elandaki, nazongaki na mboka, elongo na ata bato sambo kati na mwambe ya likita wana ya sanza misato ya Lingomba ya Babaptiste ya Freewill. Moto na moto azalaki koloba ndenge likita ya lokumu mingi basalaki na mpokwa eleka.
GSAM 138Bobengi mpo na Nsango na Bisika Mosusu
GSAM 138.3“Na ntango ya bopemi, batindami mpe bapastɛrɛ babengisaki ngai nasangana na bango mpo na kobongisa ntango oyo nakokaki kosala masolo na mangomba ndenge na ndenge na likita wana ya sanza misato, oyo bazalaki na bandako ya monene ya losambo. Na ntango wana, ezalaki na katikati ya sanza ya mibale, mpe bakataki ete etikali pɔsɔ koleka motoba te ya neige oyo epesaka nzela malamu ya kotambola na traîneau, yango ekopesa bato libaku malamu ya koyangana na makita. Bisika zomi na mibale ya ntina mingi biponamaki mpo na mosala na ngai na kati ya pɔsɔ motoba. Esengelaki napesa mateya zomi, yango elingi koloba esengelaki naloba mbala ntuku mibale na pɔsɔ. Yango epesaki ngai kaka ndambo ya mokolo na pɔsɔ mokomoko, oyo mbala mingi nazalaki komona ete ezali mpenza na ntina mpo na kosala mobembo ya bamile zomi na mitano to ntuku mibale kino na esika ya likita elandi.”5
GSAM 139Bankama Babalukaki
GSAM 139.1Elamukisi ya molimo mpe kobongwana ya bankama ya bato elandaki kosakola liteya ya boyei bisika nyonso, mpe mingi mpenza ntango bazalaki kokoma pene ya suka ya mobu ya Bayuda 1843 (Marsi 21, 1844). Ezalaki na eleko wana ya malili nde mokomi, na mboka na ye ya bomwana—Victor, N.Y.—ayokaki mpo na mbala ya liboso likambo yango, mpe atako azalaki kaka na mibu zomi na mibale, andimaki, na ndenge akokaki kokanga ntina, kondima ya boyei ya mibale. Ezalaki mpenza na bopanzani ya somo likolo ya bato, kaka na makita te, kasi bisika nyonso. Na tango wana, Victor ezalaki kaka mboka moke ya bafandi pene na nkama mibale, kasi bamboka ya zingazinga etondaki na bato mingi. Lokola mbuma ya molongo wana ya makita oyo esalemaki na mboka moke wana, balobaki ete bato nkama mitano babongwanaki.
GSAM 139Litatoli ya Methodist Year Book
GSAM 139.2Mpo na mbonge monene ya elamukisi ya molimo oyo elandaki nsima ya liyebisi ya boyei, tokuti na Methodist Year Book ete “na boumeli ya mibu minei kobanda 1840 kino 1844, bato 256 000 babongwanaki na Amerika.” Oyo ezalaki solo na Amerika ezalaki mpe solo ndenge moko na mikili misusu esika libiangi esalemaki. “Nguya monene ezalaki elongo na liyebisi, mpe milimo ezalaki kobongwana bisika nyonso.” Lokola libiangi ya liboso mpo na feti ya libala etindamaki na ba eglize,—“baoyo babengamaki,”—ezalaki na nzela na bango nde etandamaki epai ya bato nyonso oyo balingaki koya mpe kokabola lobiko oyo ezalaki kozela bato ya Nzambe. Ata soki nsango yango ezalaki kosakolama, kotangama na mabondeli, to koyembama na “nzembo ya boyei,” koningana monene ya Molimo ya Nzambe ezalaki elongo na mosala.
GSAM 140Bana bazali kosakola na Suède
GSAM 140.1Na likambo oyo, tokotala ndenge Nkolo asalaki mpo na kokotisa liyebisi na mikili wana oyo mobeko epekisaki kosakola likambo nyonso oyo ezali kokesana na “eklezia ya leta.” Suède ezalaki moko ya mikili wana. Kuna, Nkolo asalelaki bana mike mpo na kobanda mosala. Ebandeli ya emoniseli oyo ezalaki na eleko ya molunge ya mobu 1843, na Eksjö, na sudi ya Suède. Mwana mwasi moke moko, ya mibu mitano mpamba, oyo ayekolaki ata kotanga to koyemba te, mokolo moko, na lolenge ya lokumu mpenza, ayembaki malamu nzembo moko molai ya Lingomba ya Luther, mpe na nsima, na nguya monene, alobaki ete “ngonga ya bosambisi na ye ekoki,” mpe alendisaki libota ete bámibongisa mpo na kokutana na Nkolo; mpo ete azalaki koya mosika te. Bato oyo babongwanaki naino te na libota babelelaki Nzambe mpo na mawa, mpe bazwaki bolimbisi. Lingomba oyo epanzanaki longwa na mboka moko kino na mosusu, bana mosusu bazalaki kosakola nsango yango. Lingomba yango moko epai ya bana emonanaki mpe na ndelo moko boye na Norvège mpe na Allemagne.
GSAM 140“Iyo! Esengelaki napanza nsango”
GSAM 140.2Na mobu 1896, ntango nazalaki kosala makita na bisika zomi na nsambo ekeseni na ekolo Suède, nalekaki na bisika ebele epai wapi bana babimisaki nsango na mobu 1843, mpe nazwaki libaku ya kosolola na baoyo bayokaki lisakoli yango, mpe na mibali oyo babimisaki nsango ntango bazalaki naino bana. Natunaki moko na bango, “Obimisaki nsango ya boyei ya Nkolo ntango ozalaki mwana mobali?” Ayanolaki, “Nabimisaki! Iyo, esengelaki nabimisa nsango. Ngai moko nabongisaki likambo yango te. Nguya moko eyaki likolo na ngai, mpe nalobaki makambo oyo nguya wana etindaki ngai naloba.”
GSAM 140Boquist na Walbom na Örebro, na Suède
GSAM 140.3Na etuka ya Örebro, mosala oyo epanzanaki kino bato ya mikolo mpe bamiyokaki na mposa ya kosakola nsango yango. Na nsima, bakonzi ya leta, na litindiki ya banganga-nzambe ya “eklezia ya leta,” bakangaki bilenge mibali mibale, Walbom, ya mibu zomi na mwambe, mpe Ole Boquist, ya mibu zomi na mitano, mpe balobaki ete bakotia bango na etumbu ya polele mpo bato nyonso báyeba. Babɛtaki bango na mikɔlɔtɔ ya nzete ya birch na mikɔngɔ ya bolumbu, mpe batiaki bango, na bampota na bango oyo ezalaki kobima makila, na boloko ya Örebro. Ntango bampota wana ebikaki, babimisaki bango na boloko, mpe batunaki bango, “Bokotika kotangisa liteya oyo?” Ata soki babɛtaki bango lisusu na mikɔlɔtɔ mbala ya mibale, mpe bafungolaki bampota na bango lisusu, eyano kaka oyo bazwaki ezalaki, “Tokotangisa kaka liteya oyo Nkolo atindi biso tótangisa.” Na nzela ya libondeli ya mwasi moko ya lokumu ya lingomba na Örebro, Mokonzi Oscar I. ayebisaki bakonzi ete bábimisa bilenge mibali wana na boloko, mpe bátika bato wana kimya. Na boye, bolongi mpo na bosolo ezwi na Suède.
GSAM 141Litatoli ya Boquist
GSAM 141.1Na zulunalo Review and Herald, ya mokolo ya 7 sanza ya zomi 1890, ezali na lisolo moko ya kosepelisa mpenza etali lisakoli ya bana, oyo ekomamaki na O. Boquist ye moko. Alobi boye:—
GSAM 141.2“Na mobu 1843, lingomba moko ya losambo ebandaki na kati ya bato na Paroisse ya Karlskoga, na Län ya Örebro. Bakambi na lingomba oyo bazalaki bana mpe bilenge, oyo babengamaki ‘rapare.’ Bango bazalaki kosakola na nguya ya Nzambe, mpe bazalaki koyebisa bato na bondimi monene ete ngonga ya esambiselo ya Nzambe ekokaki.
GSAM 141.3“Na automne ya mobu yango moko, ngai, O. Boquist, na mibu zomi na mitano, elongo na elenge mobali mosusu, Erik Walbom, na mibu zomi na mwambe, tozwamaki makasi na nguya oyo emonanaka te na boye ete tokokaki te kotɛmɛla yango ata moke. Kaka ntango nguya oyo ya likolo ekangaki biso, tobandaki koloba na bato, mpe kosakola na mongongo makasi ete ngonga ya kosambisa ya Nzambe ekoki, na kotindaka bango na Yoele 2:28-32 mpe Emoniseli 14:6, 7.”
GSAM 141Bana na Emonaneli
GSAM 141.4Bato bayebisaki ngai ete baoyo bazalaki na bopusi ya nguya wana ya likolo bazalaki komona eloko te na oyo ezalaki zingazinga na bango. Bazalaki mpenza na emonaneli kouta na Nzambe, mpe bazalaki koloba na nguya oyo ezalaki na bopusi monene ya kondimisa. Balobaki ete bana oyo ya mike, ntango bazalaki na bopusi wana, bazalaki koloba na makasi mpe na lokumu lokola mibali mpe basi bakolo. Yango wana, baoyo bazalaki komona yango bakanisaki ete ezalaki Nkolo azali kosalela bango lokola baprofeta mpo na koloba makambo oyo ya solo mpe ya motuya. Mokomi akobi:—
GSAM 142.1“Bato bayanganaki ebele mpo na koyoka biso, mpe makita na biso ezalaki kosalema mokolo na butu, mpe eloko ebimaki ezalaki elamukisi monene ya losambo. Bilenge na mikolo bazwamaki na Molimo ya Nzambe, mpe bazalaki kolela epai ya Nkolo mpo na mawa, bazalaki koyambola masumu na bango liboso ya Nzambe mpe ya bato.
GSAM 142.2“Kasi tango sango ya likambo oyo ekomaki epai ya nganga-nzambe ya lingomba, milende ebele esalemaki mpo na kokanga biso monoko, mpe na boye kokatisa esengo wana ya losambo oyo ezalaki; kasi milende nyonso ezalaki mpamba. Na nsima, basengaki na mokonzi ya bapolisi ete akanga biso, mpe na boumeli ya pɔsɔ motoba, balukaki biso na zamba na mpamba, esika tokimaki mpo na komibomba.
GSAM 142.3“Kasi na suka, babengisaki biso tókende komonana na pastɛrɛ ya lingomba. Motango na biso emataki kino bilenge mibali na basi ntuku minei bayaki komimonisa na ndako ya pasteur, esika basalaki biso sambiselo molai. Bango nyonso longola ngai na Walbom bapesamaki nzela ya kozonga na bandako na bango; kasi bakangaki biso, mpe na mokolo elandaki, batyaki biso na boloko ya Örebro, esika batyaki biso elongo na miyibi na kati ya selile 14, lokola nde tosalaki likambo moko ya monene ya mabe.”
GSAM 142Litatoli ya Ndeko Mwasi ya Boquist
GSAM 142.4Na mokolo ya 22 Sɛtɛmbɛ 1896, ndeko mwasi ya Boquist, na mibu ntuku nsambo na mibale, ayaki na likita na biso na Örebro, mpe ayebisaki biso makambo oyo ndeko na ye ya mobali akutanaki na yango; mpo amonaki ndenge babɛtaki ye nsinga, bakangaki ye na boloko, mpe basikolisaki ye. Ayembelaki biso loyembo oyo Boquist na Walbom bayembaki ntango bazalaki kobima na boloko mpo na kokatisa gbagba oyo ezalaki likolo ya libulu ya mayi oyo ezingaki ndako ya mokonzi ya ekeke ya zomi na motoba, oyo basalelaki lokola boloko na mobu 1843. Nguya ya lingomba ya mobu 1843 ezalaki elongo na litatoli mpe koyemba loyembo wana. Soki tobongoli yango na Lingelesi, loyembo elandi boye:—
GSAM 143Nzembo ya Boquist na Walbom
GSAM 144Mwana-Mosakoli na Karlskoga
GSAM 144.4Moto moko ya lokumu na Örebro ayebisaki ngai likambo moko oyo esalemaki na Karlskoga, esika afandaki na mobu 1843. Alobaki:—
GSAM 144.5“Mwana mobali moke ya mibu mwambe, oyo ayekolaki ata mokolo moko te kotanga ba lɛ́tɛ́lɛ́ na ye, abandaki kosakola nsango, kolobelaka biteni mingi ya Makomi Mosantu. Bato balobaki, ‘Mwana wana atondi kaka na Biblia.’ Likambo oyo esalemaki nsima wana Mokonzi Oscar alobaki mpo na kosunga bato oyo bazalaki konyokwama, yango wana sango ya esika wana akokaki te komema mwana mobali yango na tribinale mpo na kokanga mosala na ye; kasi ayebisaki bato bámema mwana mobali yango epai na ye, mpe akomonisa ye polele, akolakisa bango ndenge ayebi Biblia malamu te.
GSAM 144.6“Na liboso ya ebele ya bato, sango afungolaki buku na ye ya nzembo mpe asɛngaki mwana mobali atángela ye. Mwana mobali ayanoli, ‘Nakoki kotánga te;’ kasi, atalisi sango mokɔngɔ, ayembaki nzembo mobimba malamu, banda na ebandeli kino na suka, ntango wana sango azalaki kotala na buku na kokamwa. Sango alobaki na mwana mobali, ‘Omonani lokola oyebi biloko nyonso.’ Mwana ayanoli, ‘Te. Bapesaka biso ndingisa te ntango nyonso ya koloba mayele nyonso oyo toyebi.’
GSAM 145.1“Sango afungolaki Kondimana ya Sika mpe alobaki na mwana mobali, ‘Tángelá ngai na kati na yango.’ Mwana mobali ayanoli, ‘Nakoki kotánga te.’ Sangó atunaki, ‘Kasi, oyebi nini mpenza mpo na Biblia?’ Ayanolaki, ‘Nayebi esika moko oyo ezali na maloba oyo ekomami na liloba mpe’ mbala zomi na minei. Sango alobaki, ‘Te! Maloba ya boye ezali na Biblia te.’ Elenge mobali alobaki, ‘Nakosenga yo otángela ngai Emoniseli 18:13?’ ‘Iyo,’ elobaki sango. Ntango atángaki, bato batángaki, mpe solo mpenza liloba mpe ezalaki kuna mbala zomi na minei, mpe kati na mbala wana zomi na minei, ezalaki mpe ‘kokanga milimo ya bato.’ Bato bagangaki, ‘Talá! talá! Mwana mobali ayebi Biblia koleka sango!’ Na nsɔni mingi, sango atikaki likambo yango, mpe atikaki bato kimya sima na yango.”
GSAM 145.2Na yango, na monoko ya bana Nkolo akómisi liloba na ye makasi, mpe na lolenge oyo ya kokamwa amemaki bosolo na ye na matoyi ya bato oyo mibeko na bango epekisaki kosakola liteya nyonso longola sé oyo ya “losambo ya Leta.”
GSAM 145Makabo ya Molimo oyo etali Nsango
GSAM 145.3Ezalaki kaka na Suède te nde Nkolo, na boyokani na lingomba ya boyei, alobaki na bato na ye na nzela ya makabo ya Molimo na ye. Na Ecosse, na Angleterre, mpe na Amerika, Nkolo ateyi bato na ye na nzela ya bilakiseli ya ntina.
GSAM 145Bimonaneli ya William Foy
GSAM 145.4Na mobu 1842, na engumba Boston, na etuka ya Massachusetts, ezalaki na moto moko ya mayele mingi na nkombo William Foy, oyo azalaki molobi ya mayele. Azalaki Mobapetiste, kasi azalaki komibongisa mpo na kokoma pastɛrɛ ya Lingomba ya Episkopale. Nkolo na ngolu na ye apesaki ye bimonaneli mibale na mobu 1842, moko na mokolo ya 18 sanza ya yambo, mosusu na mokolo ya 4 sanza ya mibale. Bimonaneli wana ezalaki elembo ya polele ete ezalaki bimonaneli ya solo ya Molimo ya Nzambe. Babengisaki ye bisika na bisika mpo na koloba na bisika ya kosakola, kaka na bato ya Lingomba ya Episkopale te, kasi mpe na ba Baptiste mpe na mangomba mosusu. Tango azalaki koloba, azalaki ntango nyonso kolata elamba ya pastɛrɛ, lokola bapastɛrɛ ya lingomba wana balataka na misala na bango ya losambo.
GSAM 146.1Bimonaneli ya Mongombo Foy etalaki boyei ya Kristo oyo ezalaki pene, mibembo ya bato ya Nzambe na engumba ya likolo, mabele ya sika, mpe nkembo ya bomoi ya libiki. Lokola ayebaki monɔkɔ malamu mpe azalaki na makoki ya kolimbola makambo na ndenge ya kitoko, azalaki kokamwisa bato mingi esika nyonso oyo azalaki kokende. Na libyangi, azalaki kokende na bingumba na bingumba mpo na koyebisa makambo ya kokamwa oyo amonaki; mpe mpo na koyamba ebele ya bato oyo bazalaki koyangana mpo na koyoka ye, bazalaki kozwa bandako ya minene, epai azalaki koyebisa bankoto ya bato makambo oyo emonisamaki ye etali mokili ya likolo, kitoko ya Yeruzalemi ya Sika, mpe bituluku ya ba anzelu. Ntango azalaki kolobela bolingo ya boboto mpe ya mawa ya Kristo mpo na basumuki babola, alendisaki baoyo babongwani naino te báluka Nzambe, mpe ebele ya bato bayanolaki na masengi na ye ya boboto.
GSAM 146Emonaneli ya Matambe Misato
GSAM 146.2Mosala na ye ekobaki kino na mobu 1844, pene na suka ya mikolo nkoto mibale na nkama misato. Na ntango wana, azwaki lisusu elakiseli mosusu ya Molimo Mosantu,—emonaneli ya misato, oyo asosolaki te. Na kati na yango, elakisamaki ye nzela ya bato ya Nzambe kino na engumba ya likolo. Amonaki esika ya monene ya kotelema, to esika ya komata, epai wapi ebele ya bato bayanganaki. Na bantango mosusu, moto moko akweyaki na kati ya esika wana mpe amonanaki lisusu te, mpe balobelaki ye ete, “Abwakisi kondima.” Sima, amonaki bato bamataka na esika ya mibale, to esika ya kotelema ya mibale, mpe kuna mpe bamosusu bakweyaki na kati ya esika wana mpe bamonanaki lisusu te. Na suka, esika ya misato ya kotɛlɛma emonanaki, oyo ekendeki kino na bikuke ya engumba ya bule. Ebele ya bato bayanganaki elongo na baoyo bakomaki na esika wana ya kotɛlɛma. Lokola azalaki kozela ete Nkolo Yesu ayaka na ntango moke mpenza, amonaki te ete nsango ya misato esengelaki kolanda bansango ya yambo mpe ya mibale ya Emoniseli 14. Yango wana, emonaneli yango ezalaki mpasi mpo na ye kolimbola, mpe atikaki koloba na miso ya bato. Nsima ya nsuka ya eleko ya esakweli, na mobu 1845, ayokaki moto mosusu azali kolimbola emonaneli yango moko, na ndimbola ete “bansango ya liboso mpe ya mibale epesamaki, mpe ete ya misato esengelaki kolanda.” Mwa moke nsima na yango, Mongombo Foy abelaki mpe akufaki.
GSAM 147.1Na bilakiseli ya boye ya nguya ya Nzambe na boyokani na liyebisi ya boyei na Ye “na bikuke,” mpe na esengo ya bankoto ya bato oyo bazalaki kotika lisumu mpo na kosalela Nkolo mpe kozela boyei na Ye, bato bakomaki na bondimi ya makasi ete oyo ezalaki mpenza nsango ya Nkolo mpo na mokili.
GSAM 147.2Kasi mokolo ya 21 sanza ya misato 1844 ekómaki mpe elekaki, mpe Nkolo ayaki te. Kasi, bandimi ya sembo mpe baye bazalaki kokanisa mozindo bandimaki ete basalaki na boyokani na makanisi ya Nkolo, mpe ete na ntango ebongi, makambo nyonso ekokoma polele.